46Bele+ agumbami,+ Nebo agunzami; banyama ya zamba ná banyama ya mboka ekumbi bikeko+ na bango, banyama oyo elɛmbi ememi mikumba na bango, bisaka, mokumba ya kilo.
2 “Bóyebisa yango kati na bikólo mpe bósakola yango.+ Bótombola elembo;+ bósakola yango. Bóbomba eloko te. Bóloba: ‘Babilone ezwami.+ Bele apɔli na nsɔni.+ Merodake akómi kobanga. Bililingi na ye epɔli na nsɔni.+ Bikeko na ye ya bosɔtɔ ekómi kobanga.’