46Bele+ agumbami,+ Nebo agunzami; banyama ya zamba ná banyama ya mboka ekumbi bikeko+ na bango, banyama oyo elɛmbi ememi mikumba na bango, bisaka, mokumba ya kilo.
2 “Bóyebisa yango kati na bikólo mpe bósakola yango.+ Bótombola elembo;+ bósakola yango. Bóbomba eloko te. Bóloba: ‘Babilone ezwami.+ Bele apɔli na nsɔni.+ Merodake akómi kobanga. Bililingi na ye epɔli na nsɔni.+ Bikeko na ye ya bosɔtɔ ekómi kobanga.’
52 “Boye, talá! mikolo ezali koya,” yango nde liloba ya Yehova, “mpe nakotya likebi na ngai na bikeko na ye oyo eyemami,+ mpe na mokili na ye mobimba, moto oyo atɔbɔlami akokimela.”+