Yisaya 6:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Mpe alobaki lisusu boye: “Kende, mpe yebisá mpenza bato oyo ete: ‘Bóyoka lisusu mpe lisusu, kasi bókanga ntina te; mpe bómona lisusu mpe lisusu, kasi bóyeba eloko moko te.’+ Ezekiele 12:2 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 2 “Mwana ya moto, ozali kofanda nde na kati ya ndako ya batomboki,+ oyo bazali na miso mpo na komona kasi ya solo bazali komona te,+ oyo bazali na matoi mpo na koyoka kasi ya solo bazali koyoka te,+ mpo bazali ndako ya batomboki.+ Hosea 7:11 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 11 Mpe Efraime azali lokola ebenga ya zobazoba,+ oyo ezangi mayele.+ Babeleli Ezipito;+ bakei na Asiri.+ Matai 13:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Yango wana nazali koloba na bango na bandakisa, mpamba te, atako bazali kotala, bátala kaka mpamba, mpe atako bazali koyoka, báyoka kaka mpamba, mpe bákanga ntina na yango te;+ Marko 8:18 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 18 ‘Atako bozali na miso, bozali komona te; mpe atako bozali na matoi, bozali koyoka te?’+ Mpe bobosani nde, Misala 28:26 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 26 ete, ‘Kende epai ya bato oyo mpe lobá ete: “Koyoka, bokoyoka kasi bokokanga ntina soki moke te; mpe, kotala, bokotala kasi bokomona soki moke te.+
9 Mpe alobaki lisusu boye: “Kende, mpe yebisá mpenza bato oyo ete: ‘Bóyoka lisusu mpe lisusu, kasi bókanga ntina te; mpe bómona lisusu mpe lisusu, kasi bóyeba eloko moko te.’+
2 “Mwana ya moto, ozali kofanda nde na kati ya ndako ya batomboki,+ oyo bazali na miso mpo na komona kasi ya solo bazali komona te,+ oyo bazali na matoi mpo na koyoka kasi ya solo bazali koyoka te,+ mpo bazali ndako ya batomboki.+
11 Mpe Efraime azali lokola ebenga ya zobazoba,+ oyo ezangi mayele.+ Babeleli Ezipito;+ bakei na Asiri.+
13 Yango wana nazali koloba na bango na bandakisa, mpamba te, atako bazali kotala, bátala kaka mpamba, mpe atako bazali koyoka, báyoka kaka mpamba, mpe bákanga ntina na yango te;+
18 ‘Atako bozali na miso, bozali komona te; mpe atako bozali na matoi, bozali koyoka te?’+ Mpe bobosani nde,
26 ete, ‘Kende epai ya bato oyo mpe lobá ete: “Koyoka, bokoyoka kasi bokokanga ntina soki moke te; mpe, kotala, bokotala kasi bokomona soki moke te.+