Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 24:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Osengeli te kopɛngwisa lisambisi ya moto oyo afandi mopaya+ to ya mwana mobali oyo tata akufá,+ mpe osengeli te kokanga ndanga elamba ya mwasi oyo mobali akufá.+

  • Nzembo 82:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Bósambisa na bosembo moto oyo azangá mpe mwana mobali oyo tata akufá.+

      Bókata na bosembo likambo ya moto ya mpasi mpe ya moto oyo akelelá.+

  • Zekaria 7:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 mpe bóbubaka te mwasi oyo mobali akufá+ to mwana mobali oyo tata akufá,+ to moto oyo afandi mopaya+ to moto ya mpasi,+ mpe bókanaka na mitema na bino kosalelana eloko ata moko te ya mabe.’+

  • Malaki 3:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpe nakobɛlɛma epai na bino mpo na kosambisa,+ mpe nakokóma moto oyo azali kotatola na lombangu+ mpo na kotɛmɛla banganga-nkisi,+ mpe bato ya ekobo,+ mpe baoyo balapaka ndai ya lokuta,+ mpe baoyo babubaka mosali na lifuti ya mosala na ye,+ baoyo babubaka mwasi oyo mobali akufá+ mpe mwana mobali oyo tata akufá,+ mpe baoyo bazali koboya moto oyo afandi mopaya,+ mpe bazali kobanga ngai te,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

  • Yakobo 1:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Losambo oyo ezali pɛto+ mpe na mbindo te+ na miso ya Nzambe na biso mpe Tata yango oyo: kosalisa bitike+ ná basi oyo mibali bakufá+ na bolɔzi na bango,+ mpe komibatela mpe kozala te na litɔnɔ+ ya mokili.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto