Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 2 Bakonzi 17:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 mpe bayokaki te kasi bazalaki se kokómisa mitó na bango makasi*+ lokola mitó ya bankɔkɔ na bango oyo bandimelaki+ Yehova Nzambe na bango te;

  • Nehemia 9:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bongo baboyaki koyoka,+ mpe bakanisaki+ te misala na yo ya kokamwa oyo osalelaki bango, kasi bakómisaki motó na bango makasi+ mpe batyaki mokonzi+ mpo na kozonga na boombo na bango na Ezipito. Kasi yo ozali Nzambe ya bolimbisi,+ ya ngɔlu+ mpe ya motema mawa,+ oyokaka nkanda+ noki te mpe otondi+ na motema boboto, mpe otikaki bango te.+

  • Masese 29:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Moto oyo apamelami mbala na mbala+ kasi azali kokómisa motó na ye makasi*+ akobukana pwasa, mpe kobika ekozala te.+

  • Yirimia 19:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 “Talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Talá nazali kokweisela engumba oyo mpe bingumba na yango nyonso mpasi nyonso oyo nalobaki mpo na yango, mpo bakómisi motó na bango makasi mpo bátosa maloba na ngai te.’”+

  • Baroma 2:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Kasi lokola ozali motema makasi+ mpe oboyi kobongola motema,+ ozali nde komibendela nkanda+ na mokolo ya nkanda+ mpe Nzambe akomonisa+ nkanda yango na mokolo oyo akosambisa na boyengebene.+

  • Baroma 10:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Kasi na oyo etali Yisraele azali koloba ete: “Natandi mabɔkɔ na ngai mokolo mobimba epai ya bato oyo bazangá botosi+ mpe bafungolelaka ngai monɔkɔ.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto