Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 18:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 “‘Mpe osengeli te kopesa nzela ete moko kati na bana na yo apesama+ na Moleke.+ Osengeli te kotuka+ nkombo ya Nzambe na yo ndenge wana. Ngai nazali Yehova.+

  • Balevi 20:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe ngai, nakotɛmɛla moto yango, mpe nakolongola ye kati na bato na ye,+ mpamba te apesi Moleke moko ya bana na ye mpo na kokómisa esika mosantu+ na ngai mbindo mpe kotuka nkombo na ngai mosantu.+

  • Kolimbola Mibeko 17:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 mpe akei kosambela banzambe mosusu mpe agumbameli bango to agumbameli moi to sanza to limpinga nyonso ya likoló,+ eloko oyo napeseli mitindo te,+

  • Yirimia 19:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Mpe batongaki bisika oyo etombwaná ya Baala mpo na kotumba bana na bango na mɔtɔ lokola makabo mibimba ya kotumbela Baala,+ likambo oyo napesaki mitindo te mpe nalobelaki te,+ mpe oyo eyelaki ngai na motema te.”’+

  • Yirimia 32:35
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 35 Lisusu, batongaki bisika oyo etombwaná ya Baala+ oyo ezali na lobwaku ya mwana ya Hinome,+ mpo na kolekisa na mɔtɔ bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi mbeka+ epai ya Moleke,+ likambo oyo napesaki bango mitindo te,+ mpe eyelaki ngai mpe na motema te ete nasala likambo yango oyo eyinamá,+ mpo na kosalisa Yuda lisumu.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto