9 “Mpo talá oyo Yehova ya mampinga, Nzambe ya Yisraele, alobi: ‘Talá nazali kosilisa na esika oyo, na miso na bino mpe na mikolo na bino, mongongo ya kosepela mpe mongongo ya esengo, mongongo ya mobali ya libala mpe mongongo ya mwasi ya libala.’+
10 Mpe nakosilisa epai na bango makɛlɛlɛ ya kosepela mpe makɛlɛlɛ ya esengo,+ mongongo ya mobali ya libala mpe mongongo ya mwasi ya libala,+ lokito ya enikelo ya mabɔkɔ+ mpe pole ya mwinda.+