Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 19:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 “‘Osengeli te kotambolatambola na kati ya bato na yo mpo na kokosela bato makambo.+ Osengeli te koluka kosopa makila ya moninga na yo.+ Ngai nazali Yehova.

  • 2 Samwele 19:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Bongo ye akoselaki+ mosaleli na yo makambo epai ya nkolo na ngai mokonzi. Kasi nkolo na ngai mokonzi azali lokola anzelu+ ya Nzambe ya solo, boye, salá oyo emonani malamu na miso na yo.

  • Nzembo 15:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Akoseli bato makambo na lolemo na ye te.+

      Asaleli moninga na ye eloko moko ya mabe te,+

      Mpe abebiseli moninga na ye ya motema lokumu te.+

  • Masese 20:19
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 19 Moto oyo azali kolekaleka mpo na kokosela bato makambo abimisaka makambo oyo elobami na nkuku;+ mpe osengeli te kosala boninga na moto oyo alengolami na mbɛbu na ye.+

  • Yirimia 6:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Bango nyonso bazali bato ya mitó makasi,+ bazali kotambolatambola mpo na kokosela bato makambo+—bazali motako mpe ebende. Bango nyonso bazali bato oyo babebisaka.+

  • Ezekiele 22:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Bato oyo bakoselaka bato makambo bazalaki epai na yo, mpo na kosopa makila;+ mpe na kati na yo, balei likoló ya bangomba.+ Bamipesi na etamboli ya nsɔni na kati na yo.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto