Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Balevi 26:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Mpe nakopalanganisa bino na kati ya bikólo,+ mpe nakobimisa mopanga na ekótó nsima na bino;+ mpe mokili na bino esengeli kotikala mpamba,+ mpe bingumba na bino ekokóma kaka bitiká mpamba.

  • Kolimbola Mibeko 28:64
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 64 “Mpe Yehova akopalanganisa mpenza yo na kati ya bato ya bikólo nyonso longwa na nsuka moko ya mabele kino na nsuka mosusu ya mabele,+ mpe kuna okosalela mpenza banzambe mosusu ya nzete mpe ya mabanga+ oyo oyebi te mpe oyo bankɔkɔ na yo bayebaki te.

  • Nehemia 1:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “Nabondeli yo, kanisá+ liloba oyo opesaki Moize mosaleli na yo mitindo ete: ‘Soki bino, ɛɛ bino, bozangi bosembo, ngai, ɛɛ ngai, nakopalanganisa bino na kati ya bato ya bikólo.+

  • Nzembo 106:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Mpe ete akokweisa bana na bango na bikólo,+

      Mpe ete akopalanganisa bango na mikili.+

  • Zekaria 7:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 ‘Mpe nabwakaki bango na mopɛpɛ makasi na bikólo+ nyonso oyo bango bayebaki te;+ mpe mokili yango moko etikalaki mpamba na nsima na bango, moto azalaki koleka wana te mpe moto azalaki kozonga wana te;+ mpe bakómisaki mokili yango ya kitoko+ eloko ya kokamwa.’”

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto