Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 8:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 mpe noki motema na yo etombwana+ mpenza mpe obosana mpenza Yehova Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na mokili ya Ezipito, na ndako ya boombo;+

  • Nzembo 49:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Baoyo bazali kotya motema na biloko na bango ya kobikela,+

      Mpe baoyo bazali kaka komikumisa mpo na ebele ya bomɛngo na bango,+

  • Masese 11:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Biloko ya motuya ekozala na litomba moko te na mokolo ya nkɛlɛ,+ kasi boyengebene nde ekobikisa na liwa.+

  • Masese 18:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Biloko ya motuya ya mozwi nde sité na ye ya makasi,+ mpe na makanisi na ye, yango ezali lokola efelo oyo ebatelaka.+

  • Luka 12:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Bongo alobaki na bango ete: “Bófungola miso na bino mpe bókeba na motindo nyonso ya bilulela,+ mpo ata soki moto azali na biloko mingi, biloko na ye ekopesa ye bomoi te.”+

  • 1 Timote 6:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Pesá bazwi+ ya ntango oyo mitindo ete bázala na lolendo te,+ mpe bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi,+ kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela;+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto