Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 8:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Nsima na yango, Nzambe akanisaki+ Noa mpe nyama nyonso ya zamba mpe nyama nyonso ya mboka oyo ezalaki elongo na ye na masuwa,+ mpe Nzambe alekisaki mopɛpɛ likoló ya mabele, mpe mai ebandaki kokita.+

  • Kobima 14:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Sikoyo Moize asembolaki lobɔkɔ na ye likoló ya mbu,+ mpe Yehova abandaki kozongisa mai ya mbu yango nsima na mopɛpɛ makasi ya ɛsti butu mobimba mpe kosala ete esika oyo mbu ezalaki ekóma mabele oyo ekauki,+ mpe mai ezalaki kokabwana.+

  • Mitángo 11:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mpe mopɛpɛ+ moko eutaki na Yehova, epɛpaki mpe ebandaki komema bandɛkɛ na nkombo kayɛ longwa na mbu+ mpe kokweisa yango na kaa na ntaka soki ya mobembo ya mokolo moko epai oyo mpe na ntaka soki ya mobembo ya mokolo moko epai oyo, zingazinga na kaa, mpe na ntaka soki ya mapeko mibale likoló ya mabele.

  • Nzembo 107:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Ndenge alobaka liloba mpe abimisaka mopɛpɛ makasi,+

      Bongo yango etombolaka bambonge ya mbu.+

  • Nzembo 147:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Atindaka liloba na ye+ mpe anyangwisaka yango.

      Apɛpisaka mopɛpɛ na ye;+

      Mai etíyolaka.

  • Yona 1:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe Yehova atindaki mopɛpɛ moko makasi na mbu,+ mpe ekumbaki moko ya makasi+ eyaki na mbu yango; mpe masuwa elingaki kopanzana.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto