Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 17:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Mpe nakopesa yo mpe momboto na yo, oyo ekoya nsima na yo, mokili ya bisika oyo ofandaki mopaya,+ ɛɛ mokili mobimba ya Kanana, mpo ezala ya bino mpo na ntango oyo etyami ndelo te; mpe nakomonisa ete nazali Nzambe na bango.”+

  • Balevi 26:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe nakotambola mpenza na kati na bino mpe nakomonisa ete nazali Nzambe na bino,+ mpe bino, ɛɛ bino, bokomonisa ete bozali bato na ngai.+

  • Ezekiele 11:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 mpo bátambola na mibeko na ngai mpe bábatela bikateli na ngai ya lisambisi mpe básalela mpenza yango;+ mpe bákóma mpenza bato na ngai+ mpe ngai nakóma Nzambe na bango.”’+

  • 2 Bakorinti 6:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe boyokani nini ezali kati na tempelo ya Nzambe mpe bikeko?+ Mpo biso tozali tempelo+ ya Nzambe ya bomoi; kaka ndenge Nzambe alobaki ete: “Nakofanda na kati na bango+ mpe nakotambola na kati na bango, mpe nakozala Nzambe na bango, mpe bakozala bato na ngai.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto