Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 2:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe bayokelaki ata basambisi na bango te, basalaki nde pite+ na banzambe mosusu+ mpe bagumbamelaki bango. Balongwaki nokinoki na nzela oyo bankɔkɔ na bango batambolaki, baoyo batosaki mitindo ya Yehova.+ Bango basalaki bongo te.

  • 1 Samwele 8:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Na kolanda makambo nyonso oyo basalaki banda mokolo nabimisaki bango na Ezipito+ tii na mokolo ya lelo, ndenge bazalaki se kotika ngai+ mpe kosalela banzambe mosusu,+ ndenge yango nde bazali kosala yo.

  • 2 Bakonzi 22:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 mpamba te batiki ngai mpe bakei kobimisela banzambe+ mosusu milinga ya mbeka mpo na kosilikisa ngai na misala nyonso ya mabɔkɔ na bango,+ mpe nkanda na ngai epeleli esika oyo lokola mɔtɔ oyo ekobomama te.’”’+

  • 2 Ntango 28:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Mpe abandaki kopesa mbeka na banzambe+ ya Damasi+ oyo bazalaki kobɛta ye, mpe azalaki koloba: “Lokola banzambe ya bakonzi ya Siri bazali kosalisa bango,+ nakopesa bango mbeka, mpo básalisa+ ngai.” Mpe bakómelaki ye ná Yisraele mobimba eloko oyo ezali kobɛtisa libaku.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto