Yobo 12:6 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 6 Bahema ya bapunzi ezangi mitungisi,+Mpe baoyo basilikisaka Nzambe bazali na libateliYa moto oyo amemi nzambe moko na lobɔkɔ na ye.+ Yobo 21:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Mpo na nini bato mabe bazali kokoba kozala na bomoi,+Bakómi mibange, mpe lisusu baleki bato mosusu na bozwi?+ Nzembo 37:1 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 37 Kosilika te mpo na basali-mabe.+Kolula te baoyo basalaka makambo ya kozanga boyengebene.+ Nzembo 73:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Mpo nakómaki kolula bato oyo bamikumisaka,+Ntango namonaki kimya ya bato mabe.+ Yirimia 5:28 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 28 Bakómi mafuta;+ bakómi kongɛnga. Batondani mpe na makambo mabe. Bakɔteli ata moto moko te na likambo ya kosamba,+ ata likambo ya mwana oyo tata akufá,+ mpo bálonga;+ mpe basambisi te likambo ya babola.’” Malaki 3:15 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 15 Mpe sikoyo tozali kotánga bato ya lofundo ete bazali bato ya esengo.+ Mpe bato oyo basalaka makambo mabe bapikami.+ Lisusu, bamekimeki Nzambe mpe bazali se kolonga.’”+
6 Bahema ya bapunzi ezangi mitungisi,+Mpe baoyo basilikisaka Nzambe bazali na libateliYa moto oyo amemi nzambe moko na lobɔkɔ na ye.+
7 Mpo na nini bato mabe bazali kokoba kozala na bomoi,+Bakómi mibange, mpe lisusu baleki bato mosusu na bozwi?+
28 Bakómi mafuta;+ bakómi kongɛnga. Batondani mpe na makambo mabe. Bakɔteli ata moto moko te na likambo ya kosamba,+ ata likambo ya mwana oyo tata akufá,+ mpo bálonga;+ mpe basambisi te likambo ya babola.’”
15 Mpe sikoyo tozali kotánga bato ya lofundo ete bazali bato ya esengo.+ Mpe bato oyo basalaka makambo mabe bapikami.+ Lisusu, bamekimeki Nzambe mpe bazali se kolonga.’”+