Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 14:22
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 22 Na yango, Abrama alobaki na mokonzi ya Sodoma ete: “Natomboli mpenza lobɔkɔ na ngai mpe nalapi ndai,+ epai ya Yehova Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, Oyo abimisá likoló ná mabele,

  • Kolimbola Mibeko 6:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Okobanga Yehova Nzambe na yo,+ mpe ye nde okosalela,+ mpe na nkombo na ye nde okolapa ndai.+

  • Kolimbola Mibeko 10:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “Okobanga Yehova Nzambe na yo.+ Okosalela+ ye, mpe okokangama na ye,+ mpe okolapa ndai na nkombo na ye.+

  • Basambisi 21:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Tokosala nini mpo na kozwa basi mpo na baoyo batikali, awa biso tolapi ndai+ na nkombo ya Yehova ete tokopesa te bana na biso ya basi bázala basi na bango?”+

  • Yisaya 65:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 bongo moto nyonso oyo akomizwela lipamboli na mabele akomizwela lipamboli na nkombo ya Nzambe ya kondima,+ mpe moto nyonso oyo akolapa ndai na mabele akolapa ndai na nkombo ya Nzambe ya kondima;+ mpo bakobosana mpenza bampasi ya kala mpe mpo ekobombama mpenza mpe ekomonana te na miso na ngai.+

  • Yirimia 4:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Mpe soki olapi mpenza ndai+ ete: ‘Lokola Yehova azali solo na bomoi na bosolo,+ na bosembo mpe na boyengebene!’+ bato ya bikólo nyonso bakomizwela lipamboli mpenza mpo na ye, mpe bakomikumisa mpo na ye.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto