Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 4:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 Bongo nalobaki: “Aa! Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Ya solo, okosi mpenza bato oyo+ mpe Yerusaleme, na kolobáká ete: ‘Bokozala na kimya,’+ kasi mopanga ekómi tii na molimo.”

  • Yirimia 5:31
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Basakoli bazali mpenza kosakola na lokuta;+ mpe banganga-nzambe bazali konyata bato na nguya na bango.+ Mpe bato na ngai balingi ezala ndenge wana;+ bongo bokosala nini na nsuka na yango?”+

  • Yirimia 6:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe bazali komeka kobikisa likolólikoló kobukana oyo bato na ngai babukani,+ na kolobáká ete: ‘Kimya ezali! Kimya ezali!’ nzokande kimya ezali te.+

  • Yirimia 23:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Bazali koloba mbala na mbala na baoyo bazangi limemya epai na ngai ete ‘Yehova alobi boye: “Bokozala na kimya.”’+ Mpe balobi na moto nyonso oyo azali kotambola na motó makasi na ye+ ete: ‘Mpasi ata moko te ekokwela bino.’+

  • Yirimia 27:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “‘“‘Bongo bino, bóyokela basakoli na bino te+ mpe basakoli na bino ya makambo oyo ebombaná mpe balɔti ndɔtɔ+ na bino mpe bato na bino ya misala ya maji mpe banganga-nkisi+ na bino, oyo bazali koloba na bino ete: “Bokosalela mokonzi ya Babilone te.”+

  • Ezekiele 13:10
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 10 mpo, ɛɛ, mpo bapɛngwisi bato na ngai na ndenge bazali koloba ete: “Kimya ezali!” nzokande kimya ezali te,+ mpe moto moko azali kotonga efelo oyo ekaboli biteni ya ndako, kasi bato bazali kopakola yango mpɛmbɛ+ kaka mpamba.’+

  • Mika 3:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bankumu na ye bazali kosambisa kaka mpo na kanyaka,+ mpe banganga-nzambe na ye mpenza bazali kolakisa kaka mpo na lifuti,+ mpe basakoli na ye mpenza bazali kosakola makambo ebombaná kaka mpo na mbongo;+ ata bongo bazali kokoba kotya motema epai ya Yehova, wana bazali koloba ete: “Yehova azali nde katikati na biso te?+ Mpasi ekoyela biso te.”+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto