2 Samwele 12:13 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 13 Bongo Davidi alobaki+ na Natane ete: “Nasaleli Yehova lisumu.”+ Na yango, Natane alobaki na Davidi ete: “Yehova mpe atiki mpenza lisumu na yo eleka.+ Okokufa te.+ Nzembo 51:4 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 4 Nasaleli yo lisumu, kaka yo moko,+Mpe nasali oyo ezali mabe na miso na yo,+Mpo yo omonana moyengebene ntango ozali koloba,+Mpo yo ozala na libunga te ntango ozali kosambisa.+ Danyele 9:5 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 5 tosali lisumu,+ tosali libunga, tosali mabe mpe totomboki;+ mpe totiki mitindo na yo mpe bikateli na yo ya lisambisi.+ Danyele 9:8 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 8 “Ee Yehova, bilongi na biso, ya bakonzi na biso, bankumu na biso mpe bankɔkɔ na biso etondi na nsɔni, mpo tosalelaki yo lisumu.+ 1 Yoane 1:9 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 9 Soki toyamboli masumu na biso,+ ye azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopɛtola biso na makambo nyonso ya kozanga boyengebene.+
13 Bongo Davidi alobaki+ na Natane ete: “Nasaleli Yehova lisumu.”+ Na yango, Natane alobaki na Davidi ete: “Yehova mpe atiki mpenza lisumu na yo eleka.+ Okokufa te.+
4 Nasaleli yo lisumu, kaka yo moko,+Mpe nasali oyo ezali mabe na miso na yo,+Mpo yo omonana moyengebene ntango ozali koloba,+Mpo yo ozala na libunga te ntango ozali kosambisa.+
5 tosali lisumu,+ tosali libunga, tosali mabe mpe totomboki;+ mpe totiki mitindo na yo mpe bikateli na yo ya lisambisi.+
8 “Ee Yehova, bilongi na biso, ya bakonzi na biso, bankumu na biso mpe bankɔkɔ na biso etondi na nsɔni, mpo tosalelaki yo lisumu.+
9 Soki toyamboli masumu na biso,+ ye azali sembo mpe moyengebene mpo na kolimbisa biso masumu na biso mpe kopɛtola biso na makambo nyonso ya kozanga boyengebene.+