22 “Na yango, lobá na ndako ya Yisraele ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ee ndako ya Yisraele, ezali mpo na bino te nde nazali kosala yango, kasi mpo na nkombo na ngai mosantu oyo bokómisi eloko mpamba na kati ya bikólo epai boyei.”’+
15 “Mpe sikoyo, Ee Yehova Nzambe na biso, yo oyo obimisaki bato na yo na mokili ya Ezipito na nguya ya lobɔkɔ na yo+ mpe omisalelaki nkombo lokola na mokolo ya lelo,+ tosaleli yo lisumu,+ tosali mabe.