Yobo 10:7 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 7 Atako oyebi ete nasali mabe te,+Mpe ezali na moto te oyo akoki kobikisa na lobɔkɔ na yo?+ Nzembo 17:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Omeki motema na ngai, otalitali ngai na butu,+Opɛtoli ngai; okomona ete nakani kosala mabe te.+Monɔkɔ na ngai ekobuka mobeko te.+ Yirimia 12:3 Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika 3 Mpe yo moko, Ee Yehova, oyebi ngai malamu;+ ozali komona ngai, mpe otalitali motema na ngai soki ekangami na yo.+ Kabolá bango lokola bampate mpo na kobomama,+ mpe tyá bango pembeni mpo na mokolo ya kobomama.
3 Omeki motema na ngai, otalitali ngai na butu,+Opɛtoli ngai; okomona ete nakani kosala mabe te.+Monɔkɔ na ngai ekobuka mobeko te.+
3 Mpe yo moko, Ee Yehova, oyebi ngai malamu;+ ozali komona ngai, mpe otalitali motema na ngai soki ekangami na yo.+ Kabolá bango lokola bampate mpo na kobomama,+ mpe tyá bango pembeni mpo na mokolo ya kobomama.