19 Mpe ekosalema mpenza boye: bokoloba ete ‘Mpo na nini Yehova Nzambe na biso asali biso makambo oyo nyonso?’+ Mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Lokola botiki ngai mpe bobandi kosalela nzambe mopaya na mokili na bino, ndenge wana nde bokosalela bapaya na mokili oyo ezali ya bino te.’”+
22 Mpe ntango okoloba na motema na yo:+ ‘Mpo na nini makambo oyo ekweli ngai?’+—ezali mpo na ebele ya mabunga na yo nde bilamba na yo, oyo ezalaki kozipa yo, elongolami;+ matindi na yo emonisami mpasi.