Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 29:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Bongo bakoloba mpenza boye: ‘Ezali mpo basundolaki kondimana+ ya Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango, oyo asalaki ná bango ntango abimisaki bango na mokili ya Ezipito.+

  • Basambisi 2:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Na yango basundolaki Yehova, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na mokili ya Ezipito+ mpe babandaki kolanda banzambe mosusu na banzambe ya bato ya bikólo oyo bazalaki zingazinga na bango+ mpe babandaki kogumbamela bango, bongo basilikisaki Yehova.+

  • Nehemia 9:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 “Nzokande, bazangaki botosi+ mpe batombokelaki yo+ mpe bazalaki ntango nyonso kobwaka mobeko na yo na nsima ya mokɔngɔ na bango,+ mpe babomaki basakoli na yo,+ oyo bazalaki kotatwela bango mpo na kozongisa bango epai na yo;+ mpe bazalaki kaka kosala makambo na limemya ata moke te.+

  • Yirimia 2:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Banganga-nzambe balobaki te ete: ‘Wapi Yehova?’+ Mpe bato oyo bateyaka mobeko bayebaki ngai te;+ mpe babateli ya mpate babukaki mibeko na ngai,+ mpe basakoli basakolaki na nkombo ya Baala,+ mpe balandaki baoyo bakokaki kopesa ata litomba moko te.+

  • Yirimia 5:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Ndenge nini nakoki kolimbisa yo na likambo oyo? Bana na yo moko batiki ngai, mpe bazali kaka kolapa ndai+ na nkombo ya eloko oyo ezali Nzambe te.+ Mpe nazalaki kaka kotondisa bango na bilei,+ kasi bazalaki kaka kosala ekobo,+ mpe bazali kokende na bituluku na ndako ya mwasi ya ndumba.

  • Yirimia 22:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Mpe bakoloba mpenza ete: “Ezali mpo batikaki kondimana ya Yehova Nzambe+ na bango mpe bagumbamelaki banzambe mosusu mpe basalelaki bango.”’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto