Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Basambisi 3:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Na yango bana ya Yisraele basalaki oyo ezali mabe na miso ya Yehova, mpe babosanaki Yehova Nzambe na bango+ mpe bakómaki kosalela Babaala+ mpe banzete ya losambo.+

  • 1 Bakonzi 14:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Bango mpe bazalaki se komitongela bisika oyo etombwaná,+ makonzí ya losambo+ ná nzete ya losambo,+ na ngomba moke nyonso oyo etombwaná+ mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa.+

  • 2 Bakonzi 16:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe azalaki se kopesa mbeka mpe kobimisa milinga ya mbeka na bisika oyo etombwaná+ mpe na bangomba mike+ mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa.+

  • 2 Ntango 24:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe nsukansuka, batikaki ndako ya Yehova Nzambe ya bankɔkɔ na bango mpe babandaki kosalela banzete ya losambo+ mpe bikeko,+ bongo nkanda ya Nzambe eyelaki Yuda ná Yerusaleme mpo na ngambo na bango wana.+

  • 2 Ntango 33:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bongo atongaki lisusu bisika oyo etombwaná+ oyo tata na ye Hizikiya akweisaki,+ mpe atɛlɛmiselaki Babaala+ bitumbelo+ mpe asalaki banzete ya losambo,+ mpe abandaki kogumbamela+ limpinga nyonso ya likoló+ mpe kosalela yango.+

  • Nzembo 78:58
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 58 Mpe bazalaki kaka kosilikisa ye na bisika na bango oyo etombwaná,+

      Mpe bazalaki kaka koyokisa ye zuwa na bikeko na bango oyo eyemami.+

  • Yisaya 1:29
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 29 Mpo bakoyoka nsɔni mpo na banzete makasi oyo bolulaki,+ mpe bokosambwa mpo na bilanga oyo boponi.+

  • Yirimia 2:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 “‘Mpo kala nabukaki ekanganeli na yo bitenibiteni;+ nakataki bansinga na yo. Kasi olobaki ete: “Nakosalela yo te,” mpo likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa+ ozalaki komitanda,+ ozalaki kosala bondumba.+

  • Ezekiele 6:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ ntango bato na bango oyo babomami bakozala na kati ya bikeko na bango ya bosɔtɔ,+ zingazinga ya bitumbelo na bango,+ likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná,+ mpe na bansɔngɛ nyonso ya bangomba+ mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa+ mpe na nse ya nzete nyonso monene ya nkasa mingi,+ esika bapesi nsolo moko ya kokitisa motema na bikeko na bango nyonso ya bosɔtɔ.+

  • Ezekiele 20:28
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 28 Mpe nakɔtisaki bango na mokili+ oyo mpo na yango natombolaki lobɔkɔ na ngai mpe nalapelaki bango ndai.+ Ntango bamonaki ngomba moke nyonso oyo etombwaná+ mpe nzete nyonso oyo ezali na bitape, babandaki kopesa bambeka na bango kuna+ mpe kopesa kuna makabo na bango oyo ezali kosilikisa, mpe kopesa kuna nsolo na bango ya kokitisa motema+ mpe kosopa makabo na bango ya masanga kuna.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto