-
Nehemia 9:28Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
28 “Kasi ntango kaka bazalaki kopema, bazalaki lisusu kosala oyo ezali mabe liboso na yo,+ mpe ozalaki kotika bango na lobɔkɔ ya banguna na bango, oyo bazalaki konyokola bango.+ Na nsima bazalaki kozonga mpe kobelela yo mpo na kosɛnga lisalisi,+ mpe yo moko ozalaki koyoka kuna na likoló mpenza+ mpe ozalaki kosikola bango mbala na mbala,+ na kotalela motema mawa mingi oyo ozali na yango.
-