Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 29:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Boye nkanda ya Yehova engalelaki mokili yango mpe ayeiselaki yango elakeli mabe mobimba oyo ekomami na buku oyo.+

  • Yisaya 5:25
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 25 Yango wana nkanda ya Yehova epeleli bato na ye, mpe akosembolela bango lobɔkɔ na ye mpe akobɛta bango.+ Mpe bangomba ekoningana,+ mpe bibembe na bango ekokóma lokola bosɔtɔ na katikati ya babalabala.+

      Mpo na makambo oyo nyonso, nkanda na ye ezongi nsima te, kasi lobɔkɔ na ye esembolami kaka.

  • Yirimia 15:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe nakolekisa yango elongo na banguna na yo kino na mokili oyo oyebi te.+ Mpo mɔtɔ epelisami kati na nkanda na ngai.+ Epelisami mpo na kozikisa bino.”

  • Nahumu 1:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Nani akoki kotɛlɛma liboso ya makaneli na ye?+ Mpe nani akoki kotɛmɛla mɔtɔ ya nkanda na ye?+

      Ɛɛ, kotomboka na ye ekosopana lokola mɔtɔ,+ mpe mabanga mpenza ekobukana mpo na ye.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto