Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Ebandeli 6:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Na yango, Yehova amonaki ete mabe ya moto ezalaki mingi na mabele mpe mposa+ nyonso ya makanisi ya motema na ye ezalaki kaka mabe ntango nyonso.+

  • Ebandeli 8:21
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 21 Mpe Yehova abandaki koyoka nsolo moko oyo ekitisaki ye motema,+ bongo Yehova alobaki na motema na ye+ ete: “Nakolakela lisusu mabele mabe soki moke te+ mpo na moto, mpamba te mposa+ ya motema ya moto ezali mabe banda bolenge na ye;+ mpe nakoboma lisusu eloko nyonso ya bomoi soki moke te ndenge nasali.+

  • Masese 28:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Ye oyo azali kondimela motema na ye moko azali zoba,+ kasi ye oyo azali kotambola na bwanya nde akobika.+

  • Yisaya 44:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 Azali kolya putulu ya mɔtɔ.+ Motema na ye moko oyo ekosami ebungisi ye nzela.+ Mpe azali kobikisa molimo na ye te, azali mpe koloba te ete: “Lokuta ezali na lobɔkɔ na ngai ya mobali te?”+

  • Yisaya 59:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Tobuki mibeko mpe towangani Yehova;+ tozongi nsima mpe totiki Nzambe na biso, tolobeli monyoko mpe botomboki,+ tokani mpe tolobi na nse nse maloba ya lokuta oyo euti na motema.+

  • Yakobo 1:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Kasi moto na moto amekamaka nde na mposa na ye moko oyo ezali komema ye mpe kobenda ye.+

  • Yakobo 1:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Soki moto amonaka ete asambelaka na ndenge oyo ebongi+ nzokande apekisaka lolemo na ye te,+ kasi azali kokoba kokosa motema na ye moko,+ losambo ya moto yango ezali mpamba.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto