Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • 1 Samwele 16:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 Kasi Yehova alobaki na Samwele ete: “Kotala elongi na ye te mpe bolai na ye te,+ mpo ngai naboyi ye. Mpo Nzambe amonaka ndenge moto amonaka te,+ mpamba te moto amonaka oyo emonanaka na miso;+ kasi Yehova, amonaka ndenge motema+ ezali.”

  • 1 Ntango 28:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 “Mpe yo, mwana na ngai Salomo, yebá+ Nzambe ya tata na yo mpe salelá+ ye na motema mobimba+ mpe na molimo ya esengo;+ mpo Yehova azali kotalatala mitema nyonso,+ mpe asosolaka mposa nyonso ya makanisi.+ Soki oluki ye, akosala ete omona ye;+ kasi soki otiki ye,+ akobwaka yo mpo na libela.+

  • Nzembo 139:23
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 Ee Nzambe, talá ngai malamumalamu mpe yebá motema na ngai.+

      Talá ngai malamumalamu mpe yebá makanisi oyo etungisaka ngai,+

  • Masese 17:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Nzungu ya kopɛtola ezali mpo na palata mpe litumbu mpo na wolo,+ kasi Yehova nde moto oyo atalaka mitema malamumalamu.+

  • Masese 21:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Nzela nyonso ya moto elongobani na miso na ye moko,+ kasi Yehova amekamekaka mitema mpo na koyeba ndenge ezali.+

  • Baroma 8:27
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 27 Nzokande moto oyo atalaka mitema+ ayebaka oyo elimo ezali koluka,+ mpo yango ezali kolobela basantu+ na kolanda mokano ya Nzambe.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto