Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 9:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Ee soki motó na ngai ezalaka ata mai, mpe soki miso na ngai ezalaka ata liziba ya mpisoli!+ Mbɛlɛ butu moi, nalingaki kolela bato ya mwana mwasi ya bato na ngai oyo babomami.+

  • Yirimia 13:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mpe soki boyoki yango te,+ na bisika ya kobombana, molimo na ngai ekolela mpo na lolendo mpe ekobimisa mpenza mpisoli; mpe liso na ngai ekosopa mpisoli,+ mpo etonga+ ya Yehova ekomemama lokola mokangami.

  • Yirimia 14:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 “Mpe osengeli koloba na bango liloba oyo: ‘Tiká miso na ngai esopa mpisoli butu moi mpe etika te,+ mpo ngɔndɔ, mwana mwasi ya bato na ngai, abukani+ na kokwea moko ya monene, na mpota moko ya mpasi makasi.+

  • Bileli 1:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Nazali kolela biloko wana lokola mwasi.+ Liso na ngai, liso na ngai ezali kosopa mai mingi.+

      Mpo mobɔndisi akómi mosika na ngai, moto ya kolendisa molimo na ngai.

      Bana na ngai batikali mabɔkɔ mpamba,+ mpo monguna atomboli mapeka.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto