Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kobima 34:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 abatelaka motema boboto mpo na bankóto,+ alimbisaka libunga ná kobuka mibeko mpe lisumu,+ kasi akozanga ata moke te kopesa etumbu,+ mpe mpo na libunga ya batata, ayeiselaka bana etumbu mpe bana ya bana, libota ya misato mpe libota ya minei.”+

  • Yirimia 13:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe nakotutanisa bango na bango, batata ná bana, na mbala moko,”+ yango nde liloba ya Yehova. “Nakomonisa motema mawa ata moke te, mpe nakoyoka mpasi na motema ata moke te, mpe nakozala na mawa te oyo ekopekisa ngai naboma bango.”’+

  • Bileli 2:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  2 Yehova amɛli, ayoki mawa te mpo na esika ya kofanda+ ata moko ya Yakobo.

      Na nkɛlɛ na ye, abuki bisika oyo ebatelami makasi+ ya mwana mwasi ya Yuda.

      Akweisi yango na mabele,+ akómisi bokonzi+ ná bankumu na ye eloko mpamba.+

  • Bileli 3:43
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 43 Na nkanda, okangi nzela ya kokóma epai na yo,+ mpe ozali se kolandalanda biso.+ Obomi; oyoki mawa te.+

  • Ezekiele 5:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “‘Na yango, lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘ya solo, lokola esika na ngai mosantu nde okómisi mbindo na makambo na yo nyonso ya bosɔtɔ+ mpe na makambo na yo nyonso oyo eyinamá,+ ngai moko Moto nakokitisa yo+ mpe liso na ngai ekoyoka mawa te,+ ngai moko mpe nakomonisa motema mawa te.+

  • Ezekiele 7:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe liso na ngai ekoyokela yo mawa te,+ nakomonisa mpe motema mawa te, mpo nakozongisela yo banzela na yo, mpe makambo na yo oyo eyinamá ekozala na kati na yo;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto