20 Sikoyo yoká, nabondeli yo, Ee nkolo na ngai mokonzi. Tiká lilɔmbɔ na ngai mpo na kosɛnga kondimama+ ekóma liboso na yo, mpe ozongisa ngai lisusu te na ndako ya sɛkrɛtɛrɛ Yehonatane,+ mpo nakufa kuna te.”+
6 Mpe bazwaki Yirimia mpe babwakaki ye na libulu ya kobomba mai ya Malakiya+ mwana ya mokonzi, oyo ezalaki na Lopango ya Bakɛngɛli.+ Bongo bakitisaki Yirimia na bansinga. Sikoyo na libulu yango mai ezalaki te, kaka pɔtɔpɔtɔ; mpe Yirimia abandaki kozinda na kati ya pɔtɔpɔtɔ yango.+