Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 137:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  7 Ee Yehova, kanisá+ bana ya Edome,+ na mokolo ya Yerusaleme,+

      Baoyo bazalaki koloba: “Bóbuka yango! Bóbuka yango tii na moboko na yango!”+

  • Yisaya 34:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 “Mpamba te na likoló mopanga+ na ngai ekopɔlisama mpenza. Talá! Ekokitela Edome,+ mpe ekokitela bato oyo nakani kosilisa nyɛɛ+ na bosembo.

  • Ezekiele 25:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakosembolela mpe Edome lobɔkɔ na ngai+ mpe nakolongola kuna moto ná nyama ya mboka,+ mpe nakokómisa yango esika oyo ebebisami banda na Temane,+ ɛɛ kino na Dedane.+ Bakokwea na mopanga.

  • Ezekiele 35:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Kaka ndenge ozalaki na esengo mpo na libula ya ndako ya Yisraele mpo batikaki yango mpamba, kaka likambo yango nde nakosala yo.+ Okokóma nde esika moko oyo etikali mpamba, Ee etúká ya ngombangomba ya Seire, ɛɛ Edome mobimba, yango nyonso;+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”+

  • Amose 1:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Mpo na botomboki misato ya Edome,+ mpe mpo na minei, nakozongisa yango nsima te, mpo na ndenge alandá ndeko na ye mpenza na mopanga,+ mpe mpo abebisá bizaleli na ye ya koyokela mawa,+ mpe nkanda na ye ezali se kopasola mpo na libela; mpe nkɛlɛ na ye—abatelá yango mpo na seko.+

  • Obadia 13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Osengelaki te koya na porte ya bato na ngai na mokolo ya likama na bango.+ Yo, yo mpenza, osengelaki te kotala libebi na ye na mokolo ya likama na ye; mpe osengelaki te kosembolela bomɛngo na ye lobɔkɔ na mokolo ya likama na ye.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto