Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 30:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 baoyo basimbi nzela mpo bákita na Ezipito+ mpe batuni monɔkɔ na ngai te,+ mpo na kobombama na esika makasi ya libateli ya Farao mpe mpo na kozwa esika ya kokima na elili ya Ezipito!+

  • Yisaya 31:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 31 Mawa na baoyo bazali kokita na Ezipito mpo na koluka lisungi,+ baoyo bazali kotya motema na bampunda,+ mpe baoyo bazali kotya motema na makalo+ ya bitumba, mpo ezali ebele, mpe na bampunda, mpo ezali na makasi mingi, kasi batali Mosantu ya Yisraele te mpe baluki Yehova te.+

  • Yirimia 2:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 Mpe sikoyo mpo na nini ozali kokanisakanisa nzela ya Ezipito,+ mpo na komɛla mai ya Shihore?+ Mpe mpo na nini ozali kokanisakanisa nzela ya Asiri,+ mpo na komɛla mai ya Ebale?

  • Yirimia 2:36
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 36 Mpo na nini ozali komona ete kobongola nzela na yo ezali likambo ya mpamba?+ Okoyoka mpe nsɔni mpo na Ezipito,+ kaka ndenge oyokaki nsɔni mpo na Asiri.+

  • Yirimia 44:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe nakokamata bato ya Yuda oyo batikali, oyo batalisaki bilongi na bango mpo na kokɔta na mokili ya Ezipito mpo na kofanda bapaya kuna,+ mpe bango nyonso bakosila mpenza na mokili ya Ezipito.+ Bakokwea na mopanga; mpe bakosila na nzala.+ Banda na oyo ya moke kino na oyo ya monene; bakokufa na mopanga mpe na nzala. Mpe bakokóma mpenza elakeli mabe, eloko ya kokamwa mpe libabe mpe eloko ya nsɔni.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto