13 Bóya lisusu te na makabo ya mbuma ya mpambampamba.+ Mpaka ya malasi—ezali eloko oyo nayiná.+ Bozali kotosa sanza ya sika+ mpe sabata,+ kobengisa liyangani+—kasi nakoki te kondima misala ya maji+ esika moko na liyangani monene.
10 mpe bosengeli nde koya mpe kotɛlɛma liboso na ngai na ndako oyo ebengami na nkombo na ngai,+ mpe bosengeli nde koloba: ‘Tokobikisama mpenza,’ nzokande bozali kosala makambo nyonso wana oyo eyinamá?
39 Mpe ntango babomaki bana na bango mpo na bikeko na bango ya bosɔtɔ,+ bakɔtaki kutu na esika mosantu na ngai na mokolo yango mpo na kokómisa yango eloko mpamba,+ mpe talá! yango nde basali na kati ya ndako na ngai.+