Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Mpe okokóma mpenza eloko ya kokamwa,+ liloba ya lisese+ mpe liloba ya kosɛka na kati ya bato nyonso ya bikólo epai Yehova akomema yo.

  • 1 Bakonzi 9:7
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 7 ngai mpe nakolongola Yisraele na mokili oyo napesá bango;+ mpe ndako oyo nasantisi mpo na nkombo na ngai, nakolongola yango liboso na ngai+ mpe nakobwaka yango, mpe Yisraele ekokóma mpenza liloba ya lisese+ mpe liloba ya kosɛka na kati ya bato nyonso ya bikólo.

  • 2 Ntango 7:20
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 20 ngai mpe nakopikola bango na mokili na ngai oyo napesá bango;+ mpe ndako oyo nasantisi+ mpo na nkombo na ngai, nakolongola yango liboso ya elongi na ngai,+ mpe nakokómisa yango liloba ya lisese+ mpe liloba ya kosɛka na kati ya bato nyonso ya bikólo.+

  • Nzembo 79:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  4 Tokómi eloko ya nsɔni na miso ya bato oyo bafandi penepene na biso,+

      Eloko ya kotyola mpe ya kosɛka na miso ya baoyo bazali zingazinga na biso.+

  • Nzembo 80:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  6 Okómisi biso eloko oyo bato oyo bafandi penepene na biso bazali kobundela,+

      Mpe banguna na biso bazali kaka kosɛka biso ndenge balingi.+

  • Yirimia 18:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 mpo na kokómisa mokili na bango eloko ya kokamwa,+ ya kobɛtɛla piololo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Moto nyonso mpenza oyo akoleka wana akotikala monɔkɔ polele na kokamwa mpe akoningisa motó na ye.+

  • Ezekiele 5:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 “‘Mpe nakokómisa yo esika moko oyo ebebisami mpe eloko ya nsɔni na kati ya bikólo oyo ezali zingazinga na yo liboso ya miso ya moleki-nzela nyonso.+

  • Ezekiele 23:32
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 32 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Okomɛla kɔpɔ ya ndeko na yo ya mwasi, kɔpɔ molai mpe monene.+ Okokóma eloko ya kosɛka mpe ya kotyola, kɔpɔ oyo ezali na biloko mingi na kati.+

  • Danyele 9:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Ee Yehova, na kolanda misala na yo nyonso ya boyengebene,+ nabondeli yo, nkanda na yo mpe nkɛlɛ na yo elongwa na engumba na yo Yerusaleme, ngomba na yo mosantu;+ mpamba te, mpo na masumu na biso mpe mpo na mabunga ya bankɔkɔ na biso,+ Yerusaleme ná bato na yo bazali eloko ya kosambwisa na miso ya bato nyonso zingazinga na biso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto