5 Mpe, lisusu, nakosɛnga makila na bino ya milimo na bino. Nakosɛnga yango na lobɔkɔ ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi; mpe nakosɛnga molimo ya moto na lobɔkɔ ya moto, na lobɔkɔ ya moto nyonso oyo azali ndeko na ye.+
8 Ntango nalobi na moto mabe ete: ‘Ee moto mabe, okokufa solo!’+ kasi ya solo, yo olobi na ye te mpo na kokebisa moto mabe mpo na nzela na ye,+ ye mpo azali moto mabe, akokufa na libunga na ye,+ kasi makila na ye, nakosɛnga yango na lobɔkɔ na yo.