Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 2:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 Banganga-nzambe balobaki te ete: ‘Wapi Yehova?’+ Mpe bato oyo bateyaka mobeko bayebaki ngai te;+ mpe babateli ya mpate babukaki mibeko na ngai,+ mpe basakoli basakolaki na nkombo ya Baala,+ mpe balandaki baoyo bakokaki kopesa ata litomba moko te.+

  • Bileli 4:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Mpo na masumu ya basakoli na ye mpe mabunga ya banganga-nzambe na ye,+

      Bato mosusu kati na ye basopaki makila ya bayengebene.+

  • Mika 3:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bankumu na ye bazali kosambisa kaka mpo na kanyaka,+ mpe banganga-nzambe na ye mpenza bazali kolakisa kaka mpo na lifuti,+ mpe basakoli na ye mpenza bazali kosakola makambo ebombaná kaka mpo na mbongo;+ ata bongo bazali kokoba kotya motema epai ya Yehova, wana bazali koloba ete: “Yehova azali nde katikati na biso te?+ Mpasi ekoyela biso te.”+

  • Sefania 3:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Basakoli na yango bazalaki na lofundo, bazalaki bato ya bokosi.+ Banganga-nzambe na yango bakómisaki eloko ya bosantu eloko mpamba; basakanaki na mobeko.+

  • Malaki 2:8
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 8 “Kasi bino—botiki nzela.+ Bobɛtisi bato mingi libaku na mobeko.+ Bobebisi kondimana ya Levi,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto