Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 49:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Kasi ngai nalobaki ete: “Nabomi nzoto kaka mpamba.+ Nabebisaki nguya na ngai mpo na eloko moko ya solo te mpe mpo na mpamba.+ Ya solo Moto oyo azali kosambisa ngai ezali Yehova,+ mpe Nzambe na ngai nde Moto oyo azali kofuta ngai.”+

  • Yirimia 45:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Kasi yo ozali kokoba koluka makambo minene mpo na yo.+ Kokoba koluka yango te.”’+

      “‘Mpo talá nazali komema mpasi na ekelamu nyonso ya mosuni,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe nakopesa yo molimo na yo lokola eloko oyo epunzami na bisika nyonso oyo okokende.’”+

  • Ezekiele 33:9
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 9 Kasi mpo na yo, soki okebisi mpenza moto mabe alongwa na nzela na ye mpo abongwana, atika yango, kasi ya solo, abongwani te, atiki nzela na ye te, ye akokufa mpo na libunga na ye,+ nde yo, okobikisa mpenza molimo na yo.+

  • Misala 18:6
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 6 Kasi nsima, lokola bango bakobaki kotɛmɛla mpe koloba mabe,+ apupolaki bilamba+ na ye mpe alobaki na bango ete: “Makila+ na bino ezala na mitó na bino moko. Ngai nazali pɛto.+ Banda sikoyo nakokende epai ya bato ya bikólo.”+

  • Misala 20:26
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 26 Boye nazwi bino batatoli na mokolo ya lelo mpenza ete nazali pɛto na makila+ ya bato nyonso,

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto