-
Ezekiele 18:24Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
24 “‘Sikoyo ntango moyengebene moko abongwani, atiki makambo na ye ya boyengebene mpe asali mpenza makambo oyo ezali sembo te;+ soki azali kaka kosala makambo nyonso oyo eyinamá, oyo moto mabe asali,+ mpe azali na bomoi, misala na ye nyonso ya boyengebene oyo asalaki ekokanisama lisusu te.+ Mpo na makambo na ye ya sembo te mpe mpo na lisumu oyo asalaki, akokufa mpo na yango.+
-
-
Ezekiele 33:12Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
12 “Nde yo, Ee mwana ya moto, lobá na bana ya bato na yo ete: ‘Boyengebene ya moyengebene ekobikisa ye te na mokolo ya botomboki na ye.+ Mpe mabe ya moto mabe ekobɛtisa ye libaku te na mokolo oyo abongwani, atiki mabe na ye.+ Ata mpe moto nyonso oyo azali na boyengebene akotikala na bomoi te mpo na yango na mokolo oyo ye akosala lisumu.+
-