6 Yango wana, nazwaki makango na ngai mpe nakataki ye bitenibiteni mpe natindaki ye na teritware nyonso ya libula ya Yisraele,+ mpamba te bamipesaki na etamboli ya nsɔni+ mpe basali likambo moko ya bozoba mpe ya nsɔni na Yisraele.+
14 Ata bakapita nyonso ya banganga-nzambe+ mpe bato bazangaki bosembo na makambo mingi mpenza, na kolanda makambo nyonso oyo eyinamá+ ya bikólo, bongo bakómisaki mbindo ndako ya Yehova oyo asantisaki na Yerusaleme.+
9 Bato oyo bakoselaka bato makambo bazalaki epai na yo, mpo na kosopa makila;+ mpe na kati na yo, balei likoló ya bangomba.+ Bamipesi na etamboli ya nsɔni na kati na yo.+