39 Bongo baoyo bakotikala kati na bino, bakopɔla+ mpo na libunga na bango na mikili ya banguna na bango. Ɛɛ, mpo na mabunga ya batata na bango,+ bakopɔla elongo na bango.
10 “Sikoyo mpo na yo, Ee mwana ya moto, lobá na ndako ya Yisraele ete: ‘Bino bolobi boye: “Lokola makambo na biso ya botomboki mpe masumu na biso ezali na motó na biso, mpe tozali kopɔla na kati na yango,+ bongo tokotikala na bomoi ndenge nini?”’+