15 Mpe okokóma mpenza eloko ya nsɔni+ mpe eloko ya kofinga,+ ndakisa mpo na kokebisa+ mpe nsɔmɔ mpo na bikólo oyo ezali zingazinga na yo, ntango nakopesa bitumbu epai na yo na nkanda mpe na nkɛlɛ mpe nakopamela yo na nkɛlɛ.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi.