Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nehemia 13:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Mpe bato ya Tire+ bazalaki kofanda na engumba, bazalaki koya na mbisi mpe na lolenge nyonso ya biloko ya mombongo+ mpe na sabata bazalaki kotɛkɛla yango bana ya Yuda mpe na Yerusaleme.

  • Ezekiele 27:33
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 33 Ntango biloko na yo ya mombongo+ ezalaki kouta na katikati ya mbu,+ otondisaki bato ya bikólo mingi.+ Na ebele ya biloko na yo ya motuya mpe na biloko na yo ya kosomba, okómisaki bakonzi ya mabele bazwi.+

  • Ezekiele 28:5
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 5 Na ebele ya bwanya na yo,+ na biloko na yo ya mombongo,+ otondisi bozwi na yo,+ mpe motema na yo ebandi kokóma na lolendo mpo na bozwi na yo.”’+

  • Ezekiele 28:18
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 18 “‘“Mpo na ebele ya mabunga na yo,+ mpo na kozanga bosembo na biloko na yo ya mombongo,+ okómisi bisika mosantu na yo eloko mpamba. Mpe nakobimisa mɔtɔ na kati na yo. Yango nde ekolya yo.+ Mpe nakokómisa yo putulu ya mɔtɔ likoló ya mabele, na miso ya baoyo nyonso bazali komona yo.+

  • Zekaria 9:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe Tire ebandaki komitongela mwa ngomba oyo basalá mpo na libateli, mpe koyanganisa palata lokola putulu mpe wolo lokola pɔtɔpɔtɔ ya babalabala.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto