-
1 Bakonzi 5:9Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Basaleli na ngai bakokitisa yango longwa na Libá+ tii na mbu; mpe ngai, na ngala na ngai, nakokangisa yango mpe nakotika yango etepatepa na mbu tii na esika oyo okoyebisa ngai;+ mpe nakofungola yango kuna, mpe yo okomema yango; mpe yo okosepelisa ngai soki opesi bato ya ndako na ngai biloko ya kolya.”+
-
-
Ezera 3:7Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
7 Mpe bapesaki mbongo+ na bato oyo bakataka mabanga+ mpe na bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ,+ bapesaki Basidone+ mpe bato ya Tire+ biloko ya kolya,+ masanga ná mafuta,+ mpo na koya na mabaya ya sɛdrɛ banda na Libá+ tii na mbu na Yope,+ na kolanda ndingisa oyo Siruse+ mokonzi ya Perse apesaki bango.
-
-
Misala 12:20Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
20 Nzokande azalaki na nkanda mpo na bato ya Tire mpe ya Sidone. Bongo na bomoko mpenza bayaki epai na ye mpe, nsima ya kondimisa Blasitusi, oyo azalaki na mokumba ya kotalela shambrɛ ya kolala ya mokonzi, babandaki kosɛnga kimya, mpo mokili na bango ezalaki kozwa biloko ya kolya+ na mokili ya mokonzi.
-