13 Bongo talá nkombo ya bana ya Yishimaele, na nkombo na bango, na kolanda mabota oyo euti na bango: Nebayote,+ mwana ya liboso ya Yishimaele, ná Kedare+ ná Adibeele ná Mibisame+
5 “Nazali mwana mwasi moko moindo, kasi kitoko, Ee bino bana basi ya Yerusaleme,+ lokola bahema ya Kedare,+ kasi mpe lokola bilamba ya hema+ ya Salomo.
7 Bitonga nyonso ya Kedare+—ekoyanganisama epai na yo. Bampate-mibali ya Nebayote+—ekosalela yo.+ Ekomata na etumbelo+ na ngai mpe ekondimama mpenza, mpe nakobakisa kitoko ya ndako na ngai ya kitoko.+