-
Amose 1:11Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Mpo na botomboki misato ya Edome,+ mpe mpo na minei, nakozongisa yango nsima te, mpo na ndenge alandá ndeko na ye mpenza na mopanga,+ mpe mpo abebisá bizaleli na ye ya koyokela mawa,+ mpe nkanda na ye ezali se kopasola mpo na libela; mpe nkɛlɛ na ye—abatelá yango mpo na seko.+
-
-
Malaki 1:4Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
4 “Mpamba te Edome azali kaka koloba ete: ‘Bapanzipanzi biso, kasi tokozonga mpe tokotonga bisika oyo ebebisamaki,’ talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Bango bakotonga; kasi ngai nakokweisa.+ Mpe bato bakobenga bango mpenza ete “teritware ya makambo mabe” mpe “bato oyo Yehova ayokelá nkanda+ mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”
-