Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yirimia 23:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 23 “Mawa na babateli ya mpate oyo bazali kobebisa mpe kopalanganisa bampate ya esika na ngai ya koleisa bibwɛlɛ matiti!”+ yango nde liloba ya Yehova.

  • Mika 3:1
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpe nalobaki ete: “Nabondeli bino bóyoka, bino bankumu ya Yakobo mpe bino bakomanda ya ndako ya Yisraele.+ Ezali bino te nde bosengeli koyeba bosembo?+

  • Mika 3:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Bankumu na ye bazali kosambisa kaka mpo na kanyaka,+ mpe banganga-nzambe na ye mpenza bazali kolakisa kaka mpo na lifuti,+ mpe basakoli na ye mpenza bazali kosakola makambo ebombaná kaka mpo na mbongo;+ ata bongo bazali kokoba kotya motema epai ya Yehova, wana bazali koloba ete: “Yehova azali nde katikati na biso te?+ Mpasi ekoyela biso te.”+

  • Sefania 3:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Bankumu na yango na kati na yango bazalaki bankɔsi oyo ezali koganga.+ Basambisi na yango bazalaki bambwa ya zamba ya mpokwa oyo bazalaki kobuka mikuwa liboso ntɔngɔ etana.+

  • Zekaria 11:17
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 17 Mawa na mobateli ya mpate na ngai oyo azangi ntina,+ oyo azali kotika etonga!+ Mopanga ekozala na lobɔkɔ na ye mpe na liso na ye ya mobali. Lobɔkɔ na ye ekokauka+ mpenza, mpe liso na ye ya mobali ekolɛmba mpenza.”

  • Matai 23:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 “Mawa na bino, bakomeli ná Bafarisai, bakosi! Mpamba te bozali kokangela+ bato bokonzi ya likoló; mpo bino+ moko bozali kokɔta te, mpe baoyo bazali kokɔta, bozali kopesa bango nzela te.

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto