11 Lokola mobateli ya mpate, akobatela etonga na ye moko.+ Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana-mpate;+ mpe akomema yango na ntolo na ye.+ Oyo ezali komɛlisa mabɛlɛ, akotambwisa yango malɛmbɛmalɛmbɛ.+
15 Nzokande, ntango basilisaki kolya bilei ya ntɔngɔ, Yesu alobaki na Simo Petro ete: “Simo mwana ya Yoane, olingaka ngai koleka oyo?”+ Alobaki na ye ete: “Ɛɛ, Nkolo, oyebi ete nalingaka yo mingi.”+ Alobaki na ye ete: “Leisá bana-mpate na ngai.”+