24 “‘“Mpe mosaleli na ngai Davidi akozala mokonzi na bango,+ mpe bango nyonso bakozala na mobateli ya mpate kaka moko;+ mpe bakotambola na bikateli na ngai ya lisambisi,+ mpe bakotosa mibeko na ngai,+ mpe bakokokisa mpenza yango.+
5 Na nsima, bana ya Yisraele bakozonga mpe, ya solo, bakoluka Yehova Nzambe na bango+ mpe Davidi mokonzi na bango;+ mpe bakoya mpenza na kolɛnga epai ya Yehova+ mpe epai ya bolamu na ye na eleko ya nsuka ya mikolo.+