Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Nzembo 78:52
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 52 Na nsima, abimisaki bato na ye lokola etonga,+

      Mpe atambwisaki bango lokola etonga na esobe.+

  • Nzembo 100:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    •  3 Bóyeba ete Yehova azali Nzambe.+

      Ye nde asalaki biso, kasi biso moko te.+

      Tozali bato na ye mpe bampate na esika na ye ya koleisa bibwɛlɛ matiti.+

  • Yisaya 40:11
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 11 Lokola mobateli ya mpate, akobatela etonga na ye moko.+ Na lobɔkɔ na ye akoyanganisa bana-mpate;+ mpe akomema yango na ntolo na ye.+ Oyo ezali komɛlisa mabɛlɛ, akotambwisa yango malɛmbɛmalɛmbɛ.+

  • 1 Petro 5:2
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 2 Bóbatela+ etonga ya Nzambe+ oyo bapesi na mabɔkɔ na bino, bósala yango na kotindikama te, kasi na motema moko;+ ezala te na kolinga litomba oyo ezwami na ndenge ya mabe,+ kasi na motema ya esengo;

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto