Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Kolimbola Mibeko 28:37
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 37 Mpe okokóma mpenza eloko ya kokamwa,+ liloba ya lisese+ mpe liloba ya kosɛka na kati ya bato nyonso ya bikólo epai Yehova akomema yo.

  • Nzembo 44:13
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 13 Okómisi biso eloko ya nsɔni na miso ya bato oyo bafandi penepene na biso,+

      Eloko ya kotyola mpe ya kosɛka na miso ya baoyo nyonso bazali zingazinga na biso.+

  • Yirimia 18:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 mpo na kokómisa mokili na bango eloko ya kokamwa,+ ya kobɛtɛla piololo mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Moto nyonso mpenza oyo akoleka wana akotikala monɔkɔ polele na kokamwa mpe akoningisa motó na ye.+

  • Bileli 2:15
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 15 Baoyo nyonso bazalaki koleka na balabala babɛti mabɔkɔ mpo na kosɛka yo.+

      Babɛti piololo+ mpe bazali se koningisela mwana mwasi ya Yerusaleme motó,+ mpe koloba ete:

      “Oyo nde engumba oyo bazalaki kolobela ete: ‘Ezali nsuka ya kitoko, nsai mpo na mabele mobimba’?”+

  • Danyele 9:16
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 16 Ee Yehova, na kolanda misala na yo nyonso ya boyengebene,+ nabondeli yo, nkanda na yo mpe nkɛlɛ na yo elongwa na engumba na yo Yerusaleme, ngomba na yo mosantu;+ mpamba te, mpo na masumu na biso mpe mpo na mabunga ya bankɔkɔ na biso,+ Yerusaleme ná bato na yo bazali eloko ya kosambwisa na miso ya bato nyonso zingazinga na biso.+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto