Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • Yisaya 51:3
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 3 Mpo Yehova akobɔndisa mpenza Siona.+ Ya solo, akobɔndisa bisika na ye nyonso oyo ebebisamá,+ mpe akokómisa esobe na ye lokola Edene+ mpe mokili patatalu na ye oyo ekauká lokola elanga ya Yehova.+ Nsai monene mpe esengo ekomonana kuna, matɔndi mpe mongongo ya mondule.+

  • Yisaya 58:12
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 12 Mpe ntango okosɛnga bato bátonga mpenza bisika oyo ebebisamá uta kala, bakotonga;+ okotɛlɛmisa miboko oyo ebebá banda mabota na mabota.+ Mpe bakobenga yo mpenza moto oyo abambaka madusu,+ moto oyo abongisaka babalabala oyo bato bakoki kofanda pembenipembeni na yango.

  • Yisaya 61:4
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 4 Mpe bakotonga mpenza lisusu bisika oyo ebebisamá banda kala;+ bakotɛlɛmisa bisika ya kalakala oyo etikalá mpamba,+ mpe bakobongisa lisusu bingumba oyo ebebisamá,+ bisika oyo etikalaki mpamba libota na libota.

  • Amose 9:14
    Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika
    • 14 Mpe nakozongisa bato na ngai, Yisraele, oyo bakangamaki,+ mpe bakotonga bingumba oyo etikalaki mpamba mpe bakofanda na kati na yango,+ mpe bakolona banzete ya vinyo mpe bakomɛla vinyo na yango, mpe bakosala bilanga mpe bakolya mbuma na yango.’+

Mikanda na Lingala (1984-2026)
Bimá
Kɔtá
  • Lingala
  • Kotindela moto
  • Makambo oyo olingi
  • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
  • Ndenge ya kosalela
  • Kobomba makambo ya moto
  • Kobongisa makambo na yo
  • JW.ORG
  • Kɔtá
Kotindela moto